svg+xml;charset=utf
INFRASTRUCTURE

Boyei malamu
na Parti écologique SOLEIL

Tozali Parti Solidarité, Ordre, Liberté, Ecologie, Innovation na Lumière, « MOYI » na sigle. Parti politique centriste du République Démocratique du Congo, créé le 7 juillet 2019 par Docteur Médard Dieya-Dieya. Parti oyo elingi ezala leader na kati ya ba partis écologiques ya RDC. Azali partenaire ya ba partis Écologiques européens mpe membre ya ba verts mondiaux oyo ezali ko préconiser Protection ya Environnement, promotion ya ba valeurs vertes : Justice Sociale, Eco-socialisme, Démocratie Participative, Pacifisme.

HIMON OFFICIEL YA PARTI ECOLOGIQUE SOLEIL

SLOGAN NA BISO

“Mboka, kimia, bokoli mpe écologie”

BA PROJET NA BISO

Bobateli ya Basi

Lisalisi ya bobateli mpe ya mateya

Kobatela bana

Bobateli mpe Boteyi

Projet agro-pastoral ya mosala

Formation mpe Développement

Hygiène mpe Écologie

Bobateli zinga zinga
Avenir ya Mboka Na Biso

Discours ya
Président

Parti écologique SOLEIL – RDC ezali obligé ya kokota na débat parlementaire mpe sans ko glisser na ba questions importants ebele.

Parti na biso ezali moyi oyo eko éclairer pe eko mema RDC na mokili mobimba na environnement ya santé, ensemble tokende, malgré butu, moyi ekobima po lumière ya moyi ezalaka toujours na suka ya tunnel.

Ba politiques oyo ekosalema pe ekosalema na Parti Écologique Soleil ekozala na bozangi koponapona pe ekopesa litomba na mabota manso, ba ethnies nionso pe ba strates nionso ya société.

Parti Écologique Soleil ekosala mpo na bana mboka banso ya mokili mpe ekomipesa mpo na kolakisa ntango nyonso ndakisa ya malamu koleka ya boyangeli makambo ya leta mpe guvɛrnema na yango ekopesa formasyo na mibali mpe basi oyo baponamaki kati na baye bazali na makoki mingi na bobateli zinga zinga mpe kobundisa bosoto.

Lokola eyebi likama oyo euti na bozongisi molunge na mokili, Parti écologique ya Moyi esengi na bana mboka banso ya mokili, ba mouvements mpe ba partis oyo ezali kobatela zinga zinga kosangana na ba plateformes ya échange, formation mpe ba expériences na tina ya kobongisa solo boyangeli zinga zinga na mokili mobimba.

svg+xml;charset=utf

Bandimi na biso bakamwisaka biso na mpiko mpe liyoki na bango ya lokumu

MERCI monene na ba Membres na biso nionso oyo grâce na Soutien, Omniprésence, Fidélité, Effort, Intégrité na Glow na bango basali Parti SOLEIL ndenge ezali lelo

FORMATION YA ÉCOLOGIQUE

Zwá formation na biso na tango nionso, esika nionso ozali, na rythme na yo moko.

N.B: Esengeli ozala membre mpo na kolanda formation na yo.

Soki ozali déjà membre, contacter biso na email soki te, cliquez na koma membre po o profiter na formation na biso ya niveau ya likolo.

svg+xml;charset=utf
svg+xml;charset=utf
svg+xml;charset=utf
Dr. Médard Dieya Dieya

..avenir ya peuple congolais eza priorité na biso”

Nazali na confiance mobimba na Président National na biso Dr Médard Dieya, ..Nzambe apambola bino pona nionso bosalaka pona ba plus vulnérables

Fortuné Coulibaly

Nazali membre banda septembre 2022 mpe ezali lokola nde nazali na kati ya libota moko ya monene!

Bienvenu Matongo

asante kwa kazi unazofanya kwa wanawake wetu wenye watoto, ukarimu wako utarudishwa kwako kwa wingi

Parti oyo eza avenir pona mboka na biso ya bolingo RDC. Priorité ya industrialisation raisonnée ezali fonction ya population mobimba mpe santé ya bana na biso

Clotaire P.

Parti Écologiste SOLEIL

Siège Officiel ya mosala: 55, AV. Victoire, Commune de KALAMU, Kinshasa-RDC

Tél-WhatsApp: +243810049000
Tél-WhatsApp: +243820049000
Tél-WhatsApp: +243815002728

Tél Fixe: +243999992754